Fally Ipupa - Oxygène lyrics

[Fally Ipupa - Oxygène lyrics]

Yo oza Oxygène nga naza na coma
Sala oya Alex

Yo oza Oxygène nga naza na coma
Sala oya Alex

Ba ndoto na nga ya mikolo nionso
Se elongi na yo Alex
Po nga nde mopanzi Nzambe alongola
Na nzoto na yo tango pe omonaki nga olobaki
Naza mopanzi na yo
Mais pourquoi ochanger lolenge na yo
Pourquoi o faire souffrir mopanzi na yo
Et pourtant olobaki nga na yo suka-liwa
Ndayi olapaki liboso ya Nzambe wapi yango
Wapi yango huummm

Miso na nga ekoma kotala se nzela okendeki
Elikia na nga ba souvenir
Ozonga se nzela yango
Nakoyamba yo lokola mbwa ayambaka
Mokolo na ye milou
Reviens je t'en prie bolingo na nga
Sans toi je ne peux rien mopanzi na ngai
Soki ozongi deuil ekokoma feti
Lokola équipe ya Léopards tango bazuaki CAN
Wapi yo? Wapi yo?

Alex Mfumu Nsi Love nga

Nga lelo nameki eh nakoki te
Motema ebombi-bombi souffrance trop
Elingi epasuka
Miso na nga ekoti zelo te mais etangisi mayi
Po douleur ya motema na nga ekomi na 100%
Pasi eh

Verbe aimer ekomi le passé
Ozwi le présent o conjuguez lenga verbe haïr
Nakomi kobanga na futur ekoma
Verbe ya sentinelle
Yaka tobongisa po nazo linga yo kaka eh

Sango ya douleur nanga
Epanzani mokili mobimba
Ba maman ya zando bayoki mawa ba cotisez eh
Deux dollars-deux dollars po
Basombela nga bolingo
Babosani que l'amour ezalaka invisible
Ata mbongo eleki ba millions eza kaka zéro
Pasi eh
Alex na vie na nga o remplacaki oxygène
Présence na yo nalotaka en couleurs
Lelo obwakisa nga pourquoi?
Sors na nga nini eh

Alex na vie nanga o remplacaki oxygène
Présence nayo nalotaka en couleurs
Lelo obwakisanga pourquoi?
Sors nanga nini eh

Savon soki otie na mayi oningisi
Souvent ebimisaka fulufulu
Mais nga natie bolingo ya Alex na motema
Ebimisi ba soucis ebele boye

Naniokwami mingi yoka nga mawa Alex
Estomac innocent ya bolingo mais
Victime ya souci
Ndenge nini miso ekangama soki
Yo pongi oza te

Lolemo ya moto eza police esalaka ba enquêtes
Ebongo soki bolingo ebraquer yo
Nani akobundelela yo
Ata oleli oleli pamba makelele
Ya fourmi na zando nani ayokayo?

Bolingo bolingo compliqué
Napesi lelo raison na baye baloba
Que l'amour est aveugle
Eza lokola roulage oyo azo kanga ba piéton
Au lieu a s'occuper na mituka po
Yango nde créneaux na ye kiadi kibeni eh
Nga lelo nakomi na suka eh
Souci ebongwani nuages etangisi mayi
Mais motema ezanga pare-choc ezwi ba chocs
Ah bébé nanga ahh chérie nanga

Nga lelo nameki eh nakoki te
Motema ebombi-bombi trop elingi epasuka
Miso nanga ekoti zelo te etangisi mayi
Po douleur ya motema na nga ekomi na 100%
Pasi eh Alex

Nga lelo nameki eh nakoki te
Motema ebombi-bombi trop ezui ba choc
Ahh bébé nanga dédicace dedicace dedicace
Dedicace

Awa o troubler nga bongo
Cervau ekomi ya ba bébé
Ekomi lokola disque-dur ekoti nde virus
Alex Sors nanga ekozala poubelle dedicaces
Accompagnez-nga toujours na ba ndoto nanga
Dédicaces dédicaces
Dédicaces en chantant dédicaces en chantant
Dédicaces… tango nga nabelaka akoma motivé
Na traitement dédicaces dédicaces
Dédicaces

Mfumu Nsi mon bébé yo bolingo na nga
Yo metis noir … omesenisinga na mawa
Matanganeti conducteur ya corbillard
Po atiesa but na final ya coupe du monde
Dédicaces… dédicaces

Paliwanag para sa


Magdagdag ng Interpretasyon

Magdagdag ng pinalawak na interpretasyon

Kung alam mo kung ano ang kinakanta ng tagapalabas, maaari mong basahin ang «sa pagitan ng mga linya» at malaman ang kasaysayan ng kanta, maaari kang magdagdag ng isang interpretasyon ng teksto. Matapos suriin ang aming mga editor, idagdag namin ito bilang isang opisyal na interpretasyon ng kanta!

Pinakabagong idinagdag na mga interpretasyon sa mga teksto ng kanta

A B C D E F G H I J K L M N O P Q R S T U V W X Y Z #
Mag-interpret