Fally Ipupa - Soucis paroles de (lyrics)

[Fally Ipupa - Soucis paroles de lyrics]

Na porte ya lopango oyo bakoma
"Chien méchant" moto nionso abangaka
Kasi na porte ya motema ata okomi
"Le lion méchant" jamais souci ako lenga
Sangisa ata Goldberg na Batista
Bazala ba gardes rapprochés na yo
Bakisa ba casques bleus na ba Marines
Cortège na yo pe likolo ya ba chars ya ONU
Mais souci soki eye ekozua yo kaka
Ata magie ya Copperfield eko kamolo kaka
Na malili to hiver basali chauffage
Na cas ya chaleur moyi basali ba clim
Mais pona cas ya souci to espérer nini
Moyibi soki otié bongo na coffre fort
Akozala bloquer po aza na code te
Kasi meka ko tia bolingo na coffre-fort
Souci ako seka po aza na ba codes tout
Ata ogangi "au secours" policier akoya te
Po ye moko mpe azali victime ya ba soucis
Souci o epargnaka nani
Tu épargnes qui Dis nous
Car tu mets tout le monde à genoux
Quelque soit notre rang social
Tosala yo nini yé yé tango nionso se kolela
Souci n'est pas bon mon amour était bon
Maintenant tu es là voila tu as gâché tout
La vie est très belle mon amour est trop bon
Philo Djimbé est bon
Voila pourquoi je suis folle

Ngai bayebi ngai sœur ya charisme
Ba larmes ata na deuil komona'ango pasi
Brusquement nazui visite ya souci
A changé identité na quartier
Soeur ya ba charismes akomi soeur
Ya milelo wo wo
Libaku eza se pona ba aveugles te
Na ba voyants pé ba betaka yango
Nde danger souci eza pona moto nionso tout
Ozala amoureux ou pas
To soki okimi yango na love eh
Ata na pasi ya vie ekokanga yo
Ata kutu soki y'odaye
Na jugement ya Nzambe ba ye ba kokota
Lifelo bazo kozala souciants
Souci n'est pas bon mon amour était bon
Maintenant tu es là voila tu as gâché tout
La vie est très belle mon amour est trop bon
Philo Djimbé est bon
Voila pourquoi je suis folle

Yo ozui clé wapi eh
Souci yo na kangaki porte bien
Mais yo okoti kaka yé yé yé
Pili-pili ata ezosuwa na monoko te
Jamais ba mekaka ango na liso
Yoka n'o sango ya souci na mosika
Kolinga jamais ekota motema mpo okolela
Matanga ezanga moweyi

L'État ekangi bakuluna buluwo
Pasteur azo chasser ba démons
Na bisika bikawuka
Roulage akangi chauffa bake bureau
Ebongo souci to sala nini
Mot yango ezo kanga bato nionso
Souci ezo kanga ezo tala te
Nga bolingo ya Philo
Ekanga etala te na bolingo
Souci ezo kanga ezo tala te
Na bolingo ya Djimbé
Ezo kanga ezo tala te na bolingo ya Djimbé



Souci oza méchant souci yo oza kolo
Souci yo oza méchant

L'État ekangi bakuluna buluwo
Pasteur azo chasser ba démons
Na bisika bikawuka
Roulage akangi chauffa bake bureau
Ebongo souci to sala nini
Mot yango ezo kanga bato nionso
Souci ezo kanga ezo tala te
Nga bolingo ya Philo
Ezo kanga ezo tala té oh yé oh
L'État ekangi bakuluna buluwo
Pasteur azo chasser ba démons
Na bisika bikawuka
Roulage akangi chauffa bake bureau
Ebongo souci to sala nini
Mot yango ezo kanga bato nionso
Souci ezo kanga ezo tala te
Nga bolingo ya Philo
Ezo kanga ezo tala te na
Bolingo ya Philo Djimbé
Souci ezo kanga ezo tala te
Na bolingo ya Djimbé
Ezo kanga ezo tala te na
Bolingo ya Philo Djimbé

Souci n'est pas bon mon amour était bon
Maintenant tu es là voila tu as gâché tout
La vie est très belle mon amour est trop bon
Philo Djimbé est bon
Voila pourquoi je suis folle

Mabanga, mabanga, mabanga, mabanga
Mabanga, mabanga, mabanga

Interprétation pour


Ajouter une interprétation

Ajouter une interprétation avancée

Si vous savez ce que l'artiste chante, que vous savez lire entre les lignes et que vous connaissez l'histoire de la chanson, vous pouvez ajouter une interprétation du texte. Après vérification par nos éditeurs, nous l'ajouterons comme interprétation officielle de la chanson!

Dernières interprétations ajoutées aux paroles

A B C D E F G H I J K L M N O P Q R S T U V W X Y Z #
Interpréter