Fally Ipupa - Délibération lyrics

[Fally Ipupa - Délibération lyrics]

Echantillon ya bolingo Azmak na ngai
Yo otikeli moninga okeyi
Ata batu bako bongwama Azmak kasi ngubu
Na mayi okotikala obe ngubu

Yo moto loba ka nga toko kabwana té
Ata pasi, bisengo oko kanga motema
Lelo okomi okende otika nga na nani
Y'otiki ba pota na motema na nga bomwana
Naluki liwa, liwa eboyi na ngo nga eh
Ebele ya ba mbula tovandi nga na yo
Mokolo moko azmak yo obosani manso
Loyenge ya mokili, ezepi yo bongo
Yo ozo yoka te (yo ozo mona te)
Yo ozalaka ndé auteur ya mibeko ya l'amour
Yo moko auteur, y'o violé ndé ba lois
Ohhh dis chéri (pourquoi vraiment)
Soki na zalaki officier mbele na kangisi yo
Jugement pe ya mokili oyo
Naza na confiance té ekomaya kosomba
Connaissance na famille, ngai ko famille té
Natiki na nga mais bolingo eza nanu
Natiki na nga mais bolingo eza nanu
Makanisi elobi na boya mais
Motema ezo koka té
Zongela nga ata butu mo, mo, moko, ooooh
(nayebi kokoma yoka nga nkele na ba nausées)
(nayebi kokoma yoka nga nkele na ba nausées)

Oh Azmak, zela ata tongo etana bongo okende
Naz'obanga butu ba ndoki ba
Envoûter sentiments na nga
Lalisa nga pongi ya suka, bandoto'asuka
Tendresse ya suka
Muana suka aliaka nde nini (oy'a yo)
Ba lobi muana suka aliaka nde mingi (oy'a yo)
Aveugle asalaka choix y'elamba te (Azmak)
Na mona trop kasi motema elula se yo
Na mona mingi kasi motema epona na ngo se yo
Loboko avant esenga (sentiment motema Azmak)
Na fungoli loboko ata mua nguba eza te
Maloba na nga moyibi ata nalobi vérité
Banda nayiba dongo dongo ata misili ebungi
Ndenge nini na wangana Nzambe eh?
Kaka obele mais naliaka na nga pe misili
Te mais kasi ndenge nini na wangana
Youda ata abongoli motema loba ba pasola
Bible po ba ndima ye
Nga na lingi na nga se yo

Revoir cas na nga eh Azmak
Revoir cas na ngai papa na Latifa
Na komi finaliste Azmak
Na bengaka yo cheri chouchou'a motema
Ata quarante-deux pour-cent
Délibérer moninga, ata naza na nga mayele te
Mais na zalaka toujours présente
Y'obebisi vie na nga
Mabe abengani nga, matinda atindiki nga
Alpha a favorisé
Mazé zongisa nga na carreau na yo
(ya bolingo)

Revoir cas na nga eh Azmak
Revoir cas na ngai papa n'Aziz Delido Na
Komi finaliste Azmak, na bengaka yo cheri
Chouchou'a motema Ata
Quarante-deux pour-cent, délibérer moninga
Ata naza na nga mayele te
Mais na zalaka toujours présente
Linga nga lokola Warzeline eh
Mabe abengani nga, matinda atindiki nga
Alpha a favorisé
Azmak zongisa nga na motema na yo nzambe
Eh Madina Djobounge ah
Ponela nga nzela na leka
Epaï ba kotuna ngaï yo té
Lobi omemelaki nga fololo
Lelo otindeli nga matiti

Ngaï moto na mesana ba sorties
Nionso kaka nga na yo
Yo mot'olakisa nga bolingo ya solo
Wuta bomwana na nga
Lelo ba feti nionso na kende ba
Tunaka nga "oyé yo na nani?"
Soki na lobi oboya nga, baboyi kokotisa nga
Yoka bango: "oyo eloko ya nani"
"nani amemeli biso eloko
Yo", "oyo muasi ya nani"
"nani abungisi mwasi oyo"
"nani aye feti singleton alokota
Yé akota na yé"

Ponela nga nzela na leka
Epaï ba kotuna ngaï yo té
Lobi omemelaki nga fololo
Lelo otindeli nga matiti

Ah, ah Nzambe ah Nzambe sunga ngai
Ah Nzambe, motema

Ponela nga nzela na leka
Epaï ba kotuna ngaï yo té
Lobi omemelaki nga fololo
Lelo otindeli nga matiti

Paliwanag para sa


Magdagdag ng Interpretasyon

Magdagdag ng pinalawak na interpretasyon

Kung alam mo kung ano ang kinakanta ng tagapalabas, maaari mong basahin ang «sa pagitan ng mga linya» at malaman ang kasaysayan ng kanta, maaari kang magdagdag ng isang interpretasyon ng teksto. Matapos suriin ang aming mga editor, idagdag namin ito bilang isang opisyal na interpretasyon ng kanta!

Pinakabagong idinagdag na mga interpretasyon sa mga teksto ng kanta

A B C D E F G H I J K L M N O P Q R S T U V W X Y Z #
Mag-interpret