Fally Ipupa - Une Minute lyrics

[Fally Ipupa - Une Minute lyrics]

Une minute, une pour la route
Coco Claudia Sassou
Yaya na Denis-Christel Sassou
Nguesso le pétrolier ma Vivi Emeraude

Kitoko ezali elamba oyo nzambe
Alatisaka moto nyonso te
Kasi ezali kitalatala moto
Nyonso akoki kotala

Kitoko ezali elamba oyo nzambe
Alatisaka moto nyonso te
Kasi ezali kitalatala moto
Nyonso akoki kotala
Napekisi bino botala Claudia te
Kasi nga nasengi esuka se na regard
Ya ko pesa ye ba
Rendez-vous wana bokoboma nga
Coco Claudia aza ya ngaï-mei
Maman nani ango alobaka kitoko eza mabele
Est-ce qu'eza te po amona te Claudia Sassou
(aya bangu, aya kotala Koko Claudia Sassou)

Moko ya couleur oyo arc-en-ciel alukaka
Po azuwa pe nguya ya
Kokanga ekanga moyi kobima
Ndenge akanga mvula konoko (eza nde Claudia)
Ye aza na etamboli ya balon ezana mopepe
Nzoto n'e sembe-sembe, moto-moto pe moselu
Pays bas on dirait cowboy alati ba revolvers
Soki apesi nga vue de dos wana nga na bavaka
(elle est sucrée Claudia)

Esika nzambe azuwa mabele ya kosala ye
Eza esika oyo apekisa ba anjelu banyata
Ba anjelu ba ngolomaka
Esika'ango na mabolongo
Ye moko nzambe atambolaka
Esika'ango makolo ngulu koko Claudia Sassou

Yo oza réponse exacte ya beauté
Soki bolingo nayo ezalaki prison
Nakoboya nanga liberte
Ata kolinga yo ezali ngambo
Nga nandimi ngambo
Lokola Adam andima ngambo po alingaki Eva
Dédicace

Sikoyo jolibitationismementationnellementationnellement
Ebandi

Kokende te Claudia po oza moko
Ya mikuwa ya mipanzi nangayi
P'oza elengi kofiba koleka mokuwa ya makoso
Komona yo eza lokola namoni paradis na miroir
Ata nzambe alobi azongisa nga bébé
Na maboko ya maman (te, nakoboya)

Kokende te Claudia po oza moko
Ya mikuwa ya mipanzi nangayi
P'oza elengi kofiba koleka mokuwa ya makoso
Komona yo eza lokola nadiongoli
Paradis na miroir
Ata nzambe alobi azongisa nga bébé
Na maboko ya maman te, nakoboya

Po kuna papa na maman balalisaka nga
(na berceau)
Tango age epusani babimisaki nga (na chambre)
Kasi nga na yo Claudia mbeto moko
Soki pe malili
(toko finika couette moko Claudia Sassou)
Ah mokuwa na nga mosuni nanga
Mon cœur, mon bras, ma jambe
(eza yo Claudia)

Chérie Claudia na nga
Chérie façon yo osalaka oyo ya yo synopsis
Soki ngonga ya kokata sentiment na nga ekoki
Claudia pardon nakoseng'o bakisa (une minute)
Ndenge bapesaka condamné à mort (une minute)
Avant ya ko exécuter ye
Chérie pardon nakoseng'o juste kaka
(une minute)
Ndenge moto azangi unités asengaka
(une minute)
Ata eza moko kasi na bolingo eza ebele
Nakoki ko lobel'o ata je t'aime na
(une minute)
Nakoki kopesa yo ata pe bipwepwe zuana
(une minute)
Nakoki kosala'o ata bisala sala na
(une minute)
Po après naloba bébé je veux encore une pour
La route avant qu'on ne se sépare

Papa Denguess aza
(ya Ngouli) , Ngouli aza (ya papa Denguess)
Kasi Claudia yo oza ya nani

Kitoko ya basusu suka (quelque part)
Kasi ya maman n'Alisson na Laurette
(na rez-de-chassée, koko Claudia Sassou)

Dédicace

Ah nga naleli (une minute)
Benga nga cherie (une minute)
Nafongoli tshombo (une minute)
Nazo zela appel'a Claudia (une minute)
Patsho panda honorable
(une minute) Honorable Serge
Kayembe (une minute)
Na sengi ya pamba (une minute)

Dédicace

Yoka vieux na nga Rigo Star na lindanda

Dédicace

Interpretation for


Add Interpretation

Add extended interpretation

If you know what the artist is talking about, can read between the lines, and know the history of the song, you can add interpretation to the lyrics. After checking by our editors, we will add it as the official interpretation of the song!

Latest added interpretations to lyrics

A B C D E F G H I J K L M N O P Q R S T U V W X Y Z #
Interpret