Koffi Olomidé, Djeffard Lukombo, Nyboma - Obrigado lyrics

[Koffi Olomidé, Djeffard Lukombo, Nyboma - Obrigado lyrics]

Ah la vie, pasi eh
Didace Mpembe, Léon Kabasele
Vraiment Luxen bozotala azosala nga boye
Mawa na nga Bouboul Iyondela disculpa

Yoka ngaï moto oyo kokaka kolinga te
Yoka ya nga maloba tobandaka na lisolo
Tosuka ata na lisapo

Luxen se po bayebisaki yo
Nga naza ndunda oyo baliyaka te
Obwaka nga na lifulu pamba pamba munu
Ebongaki te olanda
(maloba na bango Musengi Luxen)

Oy'a lelo pasi eleki mingi
Matoyi eboyi koyoka, miso eboyi komona
Pinzoli eboyi mpe kotanga yahweh

Nasala nini luxen naza kokufa po nalingi
Moninga moto

Po nini nzube etonda bebo na
Nzela oyo ya paradiso paradiso
Lakisa ndenge nasala po natika kokanisaka yo
P'oniokolo nzoto pamba
Bolingo oyo nakumbela yo
Soki ezalaki moto mbele ebandi
Kobima suki ya pembe

Esila nanu te ezali se na motema na nga
Ezali se kopela lokola mira kombo volcan
Luxen epay'ozali yeba awa moto aweï
Sambela nga moto ya nzambe
Souci ekosila te etondi na motema meke
Ekangami na moto tinge

Nazuwa wapi, nga nazuwa wapi
Nazuwa wapi oyo ya ngayi chérie
Luxen nalinga alinga nga te ooo
Luxen nalinga bapekisi ye alinga nga
Mawa na nga, mawa na nga
Limbisa ya nga motema soki emipesa se na yo
Bolingo ezuwa mowumbu, nga nasala nini
Sambala nga Luxen po nabika mowumbu

Limbisa ya nga motema soki emipesa se yo

Limbisa ya nga miso soki epusa kolula yo
Musengi basala yo charme, nga nalula nani
Sambela nga Luxen po nabika mowumbu
(Limbisa ya nga miso soki epusa kolula yo)
Baye basenginyaki yo, yebisa bango Obrigado
Faute nyonso se na Nzambe
Tokosamba ata ndele mokili ezali se bongo
(Baye basenginyaki yo
Pesa bango merci mingi)

Limbisa ya nga motema soki epusa kolinga yo
Bolingo etiya nga boloko, nga nasala nini
Sambela luxen po nabika mowumbu

Nazuwa wapi, nga nazuwa wapi
Nazuwa wapi oyo ya ngayi chérie
Luxen nalinga alinga nga te ooo
Luxen nalinga bapekisi ye alinga nga
Mawa na nga, mawa na nga
Modogo naleli, Gabin ya Tembo
Chirac Makayabu nalela Bouboul

Sebène

Interpretation for


Add Interpretation

Add extended interpretation

If you know what the artist is talking about, can read between the lines, and know the history of the song, you can add interpretation to the lyrics. After checking by our editors, we will add it as the official interpretation of the song!

Latest added interpretations to lyrics

A B C D E F G H I J K L M N O P Q R S T U V W X Y Z #
Interpret