Ferre Gola - Maboko pamba lyrics

[Ferre Gola - Maboko pamba lyrics]

Moto oyo akweyisi mbongo
Alukaka ya ngo esaka akweyisi te
Mais molokoti ayebaka esika nini a lokotaki
Awa si nga nalokoti bolingo ya Rigo Ngobila

Ntaba ya koyambela mopaya soki ba
Tié yango singa te
Yeba balingi mopaya aliya pondu ya
Pamba eh Rigo Ngobila
Okeyi epayi ya molongani bapesi
Yo ebonga ya mokuse yeba balingi owumela te
Mosusu aza na nzela eh Rigo Ngobila
Bafongoli imbwa oyo ayina solo na yo eeh
Luka nzela na yo mosusu kuna
Osi okoma zero eeh
Libenga na yo nde evandisaki
Yo kuna longtemps ko kondo na ya ngo ya lelo
Nde eza kobenganisa yo eh
Soki na feti molongani akomi
Ko tambola tambola
Gentillesse koluta ba bendeko
Eza encadrement eeh

Kolela te eza makombo eyaka
Nzoto ya pamba edindi na libulu molimo te oo
Mpunda oponaki ebimi echec
Kozua Rigo mabe te oh

Kolela te eza makombo eyaka
Nzoto ya pamba edindi na libulu molimo te oo
Mpunda oponaki ebimi echec
Kozua Rigo mabe te oh

Tika pete ya mpuku ekoka nzoko
Po ndoto ekokatana ata kale
Bozoba ozo sala lelo
Terminus na ngo mayi ya miso ya Rigo te
Ngonga ekoki mwana ya kelasi
A mizingi na pongi
Mokolo ya examen a ko koma nini
Likambo moto a bomela mpese moto ayebaka te
Mpese ye moko ayebi po amipesa trop
Yo moko okomi na boni ngai awa naza na yo
Yo moko oloni mabanga na bilanga ya
Rigo okeyi ko sala nini
Bakangi nga na boloko mama
Na sima ngaï ekotisi mobali

Okozonga maboko pamba
Okozonga maboko wololo wololo wololo
Nzela eko komela yo molayi
Makolo eko koma yo kilo
Okozonga maboko pamba
Okozonga maboko wololo wololo wololo
Nzela eko komela yo molayi
Makolo eko koma yo kilo

Nayebisi ba boti ya mwasi
Balobi na ngaï eh si balia mbongo
Nga nzeté ya mobesu na pela na moto
Mawa pona bino ba nzeté ya mikawu

Okozonga maboko pamba
Okozonga maboko wololo wololo wololo
Nzela eko komela yo molayi
Makolo eko koma yo kilo

Okozonga maboko pamba
Okozonga maboko wololo wololo wololo
Nzela eko komela yo molayi
Makolo eko koma yo kilo

Okozonga maboko pamba
Okozonga maboko wololo wololo wololo
Nzela eko komela yo molayi
Makolo eko koma yo kilo

Kolela te eza makambo eyaka
Nzoto ya pamba edindi na libulu molimo te oo
Mpunda oponaki ebimi echec
Kozua Rigo mabe te ooh

Ngobila Rigo soignaka relation
Oyebi lobi te nani akosalisa yo
Oko zonga maboko pamba
Oko zonga maboko wololo wololo wololo
Nzela ekokomela yo molayi
Makolo ekokoma yo kilo

Dédicasses edo Muzamba
Horizon Massamba (oh lele oh) mama de Panama
Willy Tembela (oh lele oh)
Jean Jacques Mutuale
Salomon Eskadela (oh lele oh)
Banduku bapenzi mina babenda sana

Kolela te eza makambo eyaka
Nzoto ya pamba edindi na libulu molimo te oo
Mpunda oponaki ebimi echec
Kozua Rigo mabe te ooh

Nickens Bayaka héritier Scram
Jésus ya bilamba
FIls Edungu, député de la sape
Patu Musenju, plein d'avenir ana Belucci
Tshuke Lomboto Bokulaka guy Lumbuji
Guy Luemba ya Metiola

Interpretation for


Add Interpretation

Add extended interpretation

If you know what the artist is talking about, can read between the lines, and know the history of the song, you can add interpretation to the lyrics. After checking by our editors, we will add it as the official interpretation of the song!

Latest added interpretations to lyrics

A B C D E F G H I J K L M N O P Q R S T U V W X Y Z #
Interpret