Ferre Gola - Moribond lyrics

[Ferre Gola - Moribond lyrics]

Kayembe Chez Ntemba si si
Ebikedi (ya palais)
Ebongo ya poussière (ya ba mama bipekula)
DJ Franck

Olingi natumbela yo
Olingi natumbela yo mbeka oy'a
Bolingo to pe nasopela
Yo kisangala caresse po opesa nga Temba
Le moustique se nourrit par le
Sang kasi aza vampire té
Malgré pembe ya Baluba, naza ndumba té
Kitoko Nzambe apesa nga, yango nabonzeli yo
Zonga mobimba ti na molimo mokuwa naliaki
Napesi mbwa a refoulé kolia po ayoki ebimi
Solo ya déception ya bolingo ya Temba

Souci na nga esi namikomisi na liste
Ya bato oyo bakokufa pona love
Liwa na nga esi esignami se
Pona bolingo lelo nakomi moribond
Chez Ntemba eh

Bolingo esombaki lopango na motema na ngaï
Na quartier ya tendresse
Esika bisengo avandaka
Lelo achangé adresse akomi na
Avenue ya milelo

Souci na nga esi namikomisi na liste
Ya bato oyo bakokufa pona love
Liwa na nga esi esignami se
Pona bolingo lelo nakomi moribond
Chez Ntemba eh

Bolingo ezanga loboko ya kosimba mbeli
Mais ndenge nini ezokisi motema
Mwana'a moto Temba
Ba je t'aime na yo ezalaki nzoka ya lokuta
Epapi motema na ngaï lokola zabolo sans pitié
Se eteto na ngaï pygmé nabungi
Na kati ya forêt
Likolo ya kolanda bolingo ebatami
Pene ya nkoyi
Miracle nini nasala natiki nioso
Na maboko ya Nzambe
(Abatela nga lokola abatela Shesko de London
À Bruxelles Dandy Panzu)
Soki olingi'oyeba ndenge nini nalingaka yo
Zua mbeli fongolamotema na nga otala na kati
Kasi sala ngele noki té okoboma nga
Okoregretté nasima
Nalingaki yo mon bébé Temba Kayembe

Mayi ya miso na nga ekokani na Mississippi
Meka koboya nga nako inondé
Nde Kinshasa mobimba papa

Ozalaki pene na nga
Lelo otié nga mosika na yo
Elanga ekomi pembeni zonga Chez Ntemba
Propriétaire ya love ateki lopango na ye
Malili ekoti na nzoto na nga
Cas na nga nazangi chez Ntemba Kayembe

Ozalaki pene na nga
Lelo otié nga mosika na yo
Elanga ekomi pembeni zonga Chez Ntemba
Propriétaire ya love ateki lopango na ye
Malili ekoti na nzoto na nga
Cas na nga nazangi chez Ntemba Kayembe

Jesus ba petit's ba'o teka
Na maboko na bango ni
Makasa nzete ya mokomboro
C'est à partir de trois heures, Junior Mukasu
Oba'o teka
Ba'o teka niangalakata oy'a niampule
La guerre a commencé, Papy Mayango Position
Tokobokisa plaisir té
Likambo ya love bato babomanaka
Naoli la perle rare, Fisher Senga
Christian Wadis

Ozalaki pene na nga
Lelo otié nga mosika na yo
Elanga ekomi pembeni zonga Chez Ntemba
Propriétaire ya love ateki lopango na ye
Malili ekoti na nzoto, cas na nga nazangi
Chez Ntemba Kayembe

Nani akomi mingi po namona yo
Solution Ikeleve
Naleli mingi Chez Temba po namona yo
Oloba na bo bazomemela nga liboma
Paulin Bwanga, Eva Tumba na Belgique
JP Minia, Shaggy Musahu, doddy Matoni
Bolingo ya Chez Ntemba ekomi'o niongola nga
Nasili nzoto bakomi'obenga nga moribond
Mama Cilia Aigle Jaune talela nga likambo
Excellence Antu Matubwana kotela nga
Likambo na leli
Christupa accord présidentiel zeli Tesi

Ozalaki pene na nga
Lelo otié nga mosika na yo
Elanga ekomi pembeni zonga Chez Ntemba
Propriétaire ya love ateki lopango na ye
Malili ekoti na nzoto, cas na nga nazangi
Chez Ntemba Kayembe

Interpretation for


Add Interpretation

Add extended interpretation

If you know what the artist is talking about, can read between the lines, and know the history of the song, you can add interpretation to the lyrics. After checking by our editors, we will add it as the official interpretation of the song!

Latest added interpretations to lyrics

A B C D E F G H I J K L M N O P Q R S T U V W X Y Z #
Interpret