Ferre Gola - Pito Lukaya lyrics

[Ferre Gola - Pito Lukaya lyrics]

Bolingo ya Pito etambwisi nga moto
Koleka Zachée tango ayokaki sango
Ya mwana Nzambe esengaki amata na nzete po
Amona ndenge nini akoya
Nga pe namata wapi po
Namona ndenge bolingo ekozonga
Peut-être akolobela nga lelo "nakolala
Epaï na yo"
Esengo ekozala leko koleka ba angelu na lola
Soki mopaganu abungoli motema awa na se

Nzambe likunia etumbu ya makasi
Ba pelisi yango moto
Bolingo ekoki ko pela sans pétrole n'allumeti
Awa opesi ba mbanda permission ya
Kodéfiler na miso na ngaï
C'est qu'otié bolingo à vendre pito Lukaya

Awa okotisi motema na nga na soin intensif
Po kuna moto te akoya ko rendre nga visite
Ndenge porteur amesana na kilo sac
Ya bandi na moto
Minu emesana kokata lolemo bileï na monoko
Ndenge nga namesana na yo
Soki nzoku mokolo akomi olemba mino na yé
Eza pasi na fourmi po atumbola eteni ya lipa
Mwana na libumu ya mama atunaka
Té zemi yango ekotaki wapi
L'essentiel abotama na ye na mokili ya Nzambe
Ngungi ata omemi ye na usine
Ya miliki eza koempecher ye
Te po a piquer po eza musala na ye
Quelque soit gentillesse ya
Chauffeur na taxi
Eza koempecher te ba clients
Na ye bafuta ticket

Sans le fleuve Nil
L'Egypte elingaki kozala désert
Kozanga yo Lukaya motema etikali terre vide

Sans le fleuve Nil
L'Egypte elingaki kozala désert
Kozanga yo Lukaya motema etikali terre vide

Sekele ya vie, le coeur ne l'oublie jamais
Ata molili, miso na nga emoni yo té
Na mongongo nayebaki ezali Pito Lukaya
Lokola bébé a se referaka na solo ya nzoto
Po a identifié oy'a ye mama ah

Pito na nga Lukaya, kokanga motema té
Soki bafungolaka ntima, okomona oy'a ngaï
Ndenge ozosala ngaï Jigal Nzau azo sepela té
Ndenge ozosala ngaï Chantal Bola
Azo sepela té

Sekele ya vie, le coeur ne l'oublie jamais
Ata molili, miso na nga emoni yo té
Na mongongo nayebaki ezali Pito Lukaya
Lokola bébé a se referaka na solo ya nzoto
Po a identifié oy'a ye mama ah

Ba mpangi ya Vincent Pito Lukaya
Balingi bakabola yo ya mbalangata
Est-ce que nakovivre tuna Jules Nsana
Pito nalingi omema ngaï na likolo

Sekele ya vie, le coeur ne l'oublie jamais
Ata molili, miso na nga emoni yo té
Na mongongo nayebaki ezali Pito Lukaya
Lokola bébé a se referaka na solo ya nzoto
Po a identifié oy'a ye mama ah

Pito nalingi omema ngaï na likolo
Pito nalingi omema ngaï na Cuba
Lukaya nalingi omema ngaï na Guatemala
Pito bombisa bolingo epaï Francis Luya

Sekele ya vie, le coeur ne l'oublie jamais
Ata molili, miso na nga emoni yo té
Na mongongo nayebaki ezali Pito Lukaya
Lokola bébé a se referaka na solo ya nzoto
Po a identifié oy'a ye mama ah

Interpretation for


Add Interpretation

Add extended interpretation

If you know what the artist is talking about, can read between the lines, and know the history of the song, you can add interpretation to the lyrics. After checking by our editors, we will add it as the official interpretation of the song!

Latest added interpretations to lyrics

A B C D E F G H I J K L M N O P Q R S T U V W X Y Z #
Interpret